Ba ndeko na biso ba bengami ba pasteurs to ba nganga nzambe na tangu ya kala bazalaka batu ya confiance pe respect, mais lelo ba critiques eleki na musala ya Nzambe. Nini esali pour que ba perdre ba qualité nyoso wana? Est ce que mission na bango nyoso eza kaka liloba ya Nzambe?
Ba ndeko na biso ba sali ya Nzambe to les pasteurs, bakomi objet ya polémique de part et d’autres, na ba réseaux sociaux, na ba familles… bizaleli na bango ezo tosisa lisusu liloba ya Nzambe te.
Mingi mingi na moni que ebele kati na bango ba yebi déontologie pe ba tanga théologie te, nde yango église ekomi parole muke, mbongo ebele.
Pona ko zongela vision ya église, chaque pasteur devrait présenter diplôme naye ya théologie pe azala na mosala mosusu à part église.
Mathieu Kitenge