Mwana oyo abengami na kombo ya Isaac, abungisaki ba boti na ye na sanza ya zomi ya mbula eye eleki na kati ya bitumba ya engumba Beni na province ya Nord Kivu.
Na ngolu ya Nzambe maman Tshibola mosali ya na Nzambe na mboka Kisangani a zalaki ko leka na mboka wana nde a kutaki matanga ya ba boti ya Isaac, na yango asengaki ba pesa ye mwana akolisa ye, lokola azangaki moto yako bokola ye.
Ndeko Tshibola maman mobokoli ya Isaac a fandi na etuka ya Kabondo, na bala bala zomi na motoba.
Toyeba ete ba ndeko ya ba fondations bipayi na bipayi ba lekaki po na lisungi. To sengi kimia na kati ya mboka.
Grace Nsamba