La victime réputée de coronavirus ye moko a bengi na émission télévisée pona ko expliquer eloko nioso elekanaki depuis ko koma na ye na aéroport ya Kinshasa, pe azo réclamer que aza citoyen congolais neti ba citoyens nioso, a lingi ba traiter ye neti mwana ya mboka.
Na kati ya explication na ye, a lobi que avant a ya Kinshasa ba pesaki ye ba kisi (vaccins) contre Coronavirus. Tango a komi na Kinshasa, a yoki nzoto mabe mpe a keyi na hôpital ya Ngaliema ko sala ba examens ba komeli ye ba kisi. Tango a zongi ndaku, délégation moko e ye ko examiner ye. Après prélèvement ya salive ba ye ko zwa ye pour lui dire que teste ba salaki eza positif. Na sima ba promettre ye ba soins, kasi e ezalaki lokuta. Ba sundoli ye na esika moko isolé na Kingasani (Kinshasa).
Mituna e sengeli to mi tuna eza yako yeba est-ce que na mboka ya mindele to Belgique ba koki ko permettre mutu a sala voyage sans ko tester état de santé na ye ?
Soki eza coronavirus pona nini ba ndeko, bana mpe mwasi ya victime ba tiki bango?
Ministre ya santé mpe ba konzi nioso ya mboka Congo, bo tika te peuple a vivre kati ya tourment mpe insécurité kasi bo luka solution na lombangu pona kimia mpe ko proteger peuple congolais.
Dieme Kolo