Kisangani oyo e yebana na nkombo ya « Boyoma Singa-Mwambe » e zalaki etuka liye lotiliki lizalaki eloko yako luka te.
Kasi lelo, Kisangani e komi na kati ya ngundu enene. Banda Novembre 2019, engumba Kisangani e zali lisusu na lotiliki (courant) te lokola ezalaka o’ ntango ya kala.
Bana ya mboka ba lobi ezali faute ya ba autorités ya engumba Kisangani mpe ya nzinga nzinga.
Na moni ete ba konzi ya SNEL mpe ya etuka ya Tshopo ba yoka boleli ya bana y’a mboka pona maye matali lotiliki na engumba na biso Kisangani.
Richard Elenga