Commune ya mangobo eza moko ya ba communes ya engumba kisangani. Eyebanaki na kombo ya « commune Belge » na tango ya ba noko na biso ya Congo belge. Kasi ba ndeko na biso ya Mangobo ba koma ko zwa lotiliki kk ba week-end.
Mangonbo oyo e fandami na une grande partie ya population ya engumba kisangani. E sali déjà mbula mitano (5 ans), ba fandi ya Mangobo bazo mona pasi mingi na likambo e tali lotiliki. Kutu, ba week-end misusu, lotiliki yango e zongaka te. Eloko ezo pesa pasi, eza ko mona ete ba konzi ebele ba leka wana, kasi ata moko a kanisa ba fandi ya Mangobo na likambo e tali courant te.
Lelo lisusu, tozo senga na ba konzi ya engumba Kisangani ba talela ba ndeko ya Mangobo likambo oyo. Eza commune ya munene ya Kisangani, population e moni pasi, molili ezo bota makambo ebele, ba kuluna pe bazo profiter na situation wana po ba sala bato mabe.
Paul Yangambia