Archevêque métropolitain ya Kisangani, Mgr Marcel Utembi Tapa a salaki bokutani monene na Cathédrale du Très Saint Rosaire ya Kisangani lundi 23 mars e leki.
Na bokutani na ye na ba sango, ba sololaki mpo ya ko tala lolenge nini messe e ko banda ko salema na kati ya ba paroisses, mpe ba kristu banso ba sosola ete Coronavirus e zali ya solo na mboka na biso.
Ko landa na maloba ya Marcel Utembi, e sengami na ba nganga Nzambe (Ba sango) banso na ba mamelo, ba sambela elongo mokolo nyoso ya eyenga na ngonga ya 09h mpe mokristu ata moko te a kota na losambo oyo.
Na suka e sengami na ba kristu banso ko sambela na ba ndako na bango mpo na ko boya Covid19.
Likanisi liye e zali malamu, kasi soki ba sango ba sambeli elongo na ba sœurs religieuses ba ko leka 20 te ? Mpe est-ce que ko sambela oyo ezali ko tosa solo maloba ya chef de l’Etat oyo a pekisaki bato ko se rassembler mpo na ba prières na ba églises ?
Denis Libete