Uta bokoti ya Coronavirus na mboka Congo, biloko ya ko lia e mati ntalo na ba zando ya mboka mobimba, Kisangani eza épargné te.
Ko banda mokonzi ya mboka a pekisa misala ndenge na ndenge e salema, likambo oyo e pesi pasi na population mpe misala na bango e kufi.
Na yango mabota ebele e komi ko sala ba provisions na ba ndaku mpo na ko banga confinement. Likambo oyo e pesi e kotisi crise na marché wapi biloko e mati (loso, madesu, fufu, pondu…)
Mpo na ye chef de division ya économie ya Tshopo, Roger Mabame, a lobi ete mokanda ya ministre ya économie ya ekolo a pekisi ba commerçants nyoso ko matisa talo ya biloko mpe équipe moko esili ko kita lelo vendredi 27 mars na terrain mpo na ko tala ba oyo ba ko tosa te ! bango ba ko futa ba amandes.
Loi économique e loba soki offre eza inférieure ya ba demandes, prix e komata. Population eza na posa yako somba mingi yango biloko emati.
Denis libete