Na ko tala été lelo pendemie ya Corona virus e komi pene vraiment ya Province, wapi lelo cas moko e zali na Nord-kivu pe mususu na Ituri, ba Province oyo e sangisaka ba commerce na Tshopo e zali possible que Coronavirus e kota na facilité nyoso.
Na libaku ya réunion ya sensibilisation na Ministre ya Santé ya Tshopo, na ba autorités ya Police Nationale Congolaise (PNC) , oyo e salemaki jeudi 2 Avril na Inspection Provinciale ya Police Tshopo. Na occasion yango nde ye ministre Joachim Ondenda Kemi, a lobi été pendemie ya Coronavirus e koki pe ko kota déjà na Province ya Tshopo, kasi to koyeba te, parce que to za na matériel ata moko te ya détection ya COVID-19, na Kisangani pe ata dispositif moko te oyo ba bengi turbo respirateur e zali po nako calmer 3ème stade ya Coronavirus.

E sengeli moto na moto ko mibatela, po na Kisangani ata molécule moko te ya Chloroquine e zali.
Po na biso to lobi boye, lelo Kisangani soki Corona e koti Tina yaba hôpital e kozala nini ? peut être kaka pona ko tiya bato na quarantaine ndenge bazo bongisa déjà ?
Denis Libete