Balabala oyo to meseni ko benga » Camp Ketele » e zali moko ya ba nzela minene na kati ya ville na biso ya Kisangani. Pona nini e komi na état e za nango lelo?

Pasi mingi ko mona balabala munene neti oyo, ko kufa neti ba konzi ba zalaka lisusu te na mboka. Mawa surtout soki mbula e noki, balabala oyo e baluki rivière. Ba ndeko na biso ba fandi zinga zinga, ba komisa yango poubelle na bango, érosion nde lisusu ko loba te. E zali soni mingi ko kuta balala na état wana na ville munene ya mboka neti oyo.
Na moni neti pona ba réhabilitation tardive ya bakonzi ya mboka nde biloko e wumelaka te. Kasi nako senga na ba konzi ba talela biso na lo bangu balabala oyo, pe na ba ndeko na biso ya zinga zinga, ba tika ko bwaka ba salité na bango na nzela.
Mathieu Kitenge
Nayoki mawa pe kolela po eza nzela nabandaki kokende classe na Institut Tshiololo (1978-1984).
J'aimeJ'aime