Lokola e zalaka na ntango ya kala, na mokolo moko motard a koki ko zwa somme ya 30.000 to 40.000 FC na journée mobimba.
Kasi depuis confinement e bandi, ba ndeko taximens ba lobi mpo na ko zwa ata 20.000 Fc na journée moko e komi pasi, pamba te ba étudiants, ba éléves, na bato ya mosala baza lisusu en circulation te.
Liboso ya likambo eye, nde tozo mona ba zo futisa biso mbongo ebele mpo na distance ya mukié, mpo ba lobi confinement ezo bloquer mosala na bango.
Na moni ete likambo liye, lizali kaka mpo ya ba motards te kasi mpo ya biso banso to vandi na engumba Kisangani.
Ba ndeko motards ba comprendre que vie e komi difficile mpo na biso banso.
Richard Elenga