Après confinement ya commune ya Gombe, gouvernement e zui mokano ete bato nyoso ba banda ko lata masque na ba lieux publiques mpo na ko mi batela.
Lokola bato misusu ba zali na makoki ya ko somba masque oyo e zali ko tekama na pharmacie to na boutique té, nde yango ba tailleurs ba zwi likanisi ya ko fabriquer masque na tissus ya liputa to tissus mususu, ba zali ko teka yango na 500 FC au lieu ya 2000 FC neti ba masques misusu.

To yeba ete masque wana e zali ya usage unique te, to koki ko sukola yango pe ko lekisa fer à repasser.
Grace Nsamba