Na 5 kilomètres vers aéroport international ya Bangboka, bateki ya zando ba zo pona lisusu esika ya ko tia biloko na bango te, mingi mingi penza ba oyo baza na ba étalages te.
Bazo tanda biloko na nzela mpe bazo tika yango kaka polele. Surtout bateki pondu, masangu, tomson mpe mafuta, bazo bloquer passage mpe ko perturber circulation.
Likambo oyo ezo causer parfois ba accidents mpe makama misusu ebele.
Na yango nga na moni ete ba chefs de quartier to mpe ba agents de l’ordre ba koka ko tala likambo wana mpo ba zongisa ordre mpe discipline na zando oyo, pamba te ezali pasi mingi.
Joël Kisezo