Cimetière e zali esika oyo e bongi mpo na milimo ya bato e pema na kimia, mpe biso bato to zali na bomoyi to sengeli ko tosa esika eye.
Kasi uta mbulamatari ya engumba Kisangani e zwaki mokano ya ko kata matiti o kati ya cimetière ya Commune Makiso, eye e zwami na ngambo ya ibale ya Batam ya Université de Kisangani, e komi esika eye miyibi bazo batama sima ya mosala na bango.
Bazo bima na butu mpo na ko botola bato biloko bya bango mpe ko kima ko bombana o kati ya cimetière.
Likambo liye lizali ko sala pasi mpe mawa na mitema, pamba te, milimo mya ba ndeko ba kundami o kati ya cimetière lina, mi zali ko pema lisusu na kimia te, mpo na makambo miyibi bazo sala o esika ena.
Na moni ete la police ya commandement-Ville na biso e sala mosala nango mpo e tiya loboko na miyibi wana, pamba te cimetière e zali esika biso banso to sengeli ko tosa, ko mona ete ba weyi bazalaki mpe bato lokola biso
Richard Elenga