Juge Président ya procès ya likambo ya mikolo kama yoko (100 jours) oyo e kutanisi Vital Kamerhe na libanais Jammal, a kufi na butu ya lelo. Kasi makambo ebele e sili ko lobama sima ya liwa ya ye.
Moko ya ba ninga na ye, na micro ya ba ndeko ya PoliticoCD, a lobi ete juge Raphaël Yanyi a zalaki na bokono ata yoko te :
« Azalaki na ye malamu. A bandaki ko bela te. To lekisaki ngonga na ye mardi oyo journée mobimba. Na ngonga ata yoko te to monaki ye na bokono. Liwa ya ye ezali ko kamwisa. Toko tika likambo oyo boye te. »
To yeba ete ba sango misusu ezo loba ete juge a kufaki na sima yako sala crise.