Toleka to taxi velo e zali moko ya ba moyens de transport oyo e zalaka ko sala particularité ya boyoma singa mwambe.
Ya solo toleka e sunga batu ebele na kati ya ville ya Kisangani, kaka neti moyen de transport te, kasi e sunga mpe ba jeunes na cadre ya musala. Transport oyo e bimisa ba intellectuels ebele ya ville oyo, e bimisa mpe ba konzi ya mboka na biso.
Soki moyen de transport oyo e limwe complètement un jour, nako senga na Ministère ya culture ya Tshopo, ko tiya yango na musé.