Jérôme Monyangi a zali moko ya minganga oyo ba kutanaki na ministre ya santé Eteni Longondo samedi 30 mai oyo, ye a lobi ete kisi ya ko bundisa bokono ya coronavirus e sili ko zala.
Na sima ya lisanga na bango na ministre ya santé, munganga Jérôme Monyangi a lobaki boye : « kisi ya ko bundisa coronavirus e zali. Kasi to zali kaka ko zela comité scientifique a ndima yango mpo ete to pesa yango na population. »
To yeba ete na suka ya poso oyo, mboka na biso e komisi ndelo ya ba cas koto isato (3000) ya Covid-19.