Bokono oyo ya virus Ebola selon histoire, e bandaka na mboka na biso Congo, précisément na province ya Equateur. Kasi lelo ba sango e lobi ete Ebola e koti lisusu kuna.
Na tango mokili mobimba e zali ko bundisa bokono ya Coronavirus, Ebola mpe e zongi na province ya Equateur, selon Ministre ya santé Docteur Eteni Longondo, oyo a laki ko kita na lombango na esika yango na mikolo ezali ko ya. Liboso ya ba panzi sango (en conférence de presse) ministre a lobi ete bato mineyi (4) ba sili ko kufa na Mbandaka.
Mpo na rappel, mokonzi ya equipe ya riposte contre Coronavirus, Docteur Muyembe, a zwaka déjà vaccin mpo na bokono oyo ya virus Ebola.