Mpo na mokolo ya misato (mercredi) 03 juin 2020 oyo, bulletin n°72 ya Comité multisectoriel de la riposte à la pandémie du Covid19 en RDC e monisi ete :
■ Ba cas kama ibale tuku mibale na mineyi (224) bo meki meki na ngo e ndimami;
■ Ba cas kama yoko tuku mineyi na libwa (149) ya sika oyo e ndimami e bakisami na mboka . Kati ya ba cas oyo, Kinshasa e zali na kama yoko tuku misato na moko (131) mpe Kongo Central e zali na zomi na mwambe (18);
■ Bato misato (3) ba biki;
■ Bato misato (3) ba kufi na kati ya ba beli;
■ Ba beli koto ibale kama mitano tuku mitano na mineyi (2.554) ba zali na évolution ya malamu;
■ Ba échantillons kama motoba tuku mitano (650) e mekamaki.
Uta ebandeli ya bo kono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto isato kama motoba tuku mineyi na mineyi (3.644), kati na ba cas oyo koto isato kama motoba tuku mineyi na misato (3.643) e ndimami mpe cas moko e zali « probable ».
Na boye, bato tuku sambo na mwambe (78) ba kufi [ kati na bango ba cas tuku sambo na sambo (77) e ndimami mpe cas moko eza « probable »] mpe bato kama mineyi tuku libwa na mitano (495) ba biki.
Solo ba provinces zomi (10) eza touchées :
■ Kinshasa eza na ba cas koto isato kama isato na motoba (3.306);
■ Kongo Central eza na ba cas kama ibale na mwambe (208);
■Nord-Kivu eza na ba cas tuku mineyi na mwambe (48);
■ Sud-Kivu eza na ba cas tuku mineyi na moko (41);
■ Haut-Katanga eza na ba cas tuku misato na misato (33);
■ Ituri eza na ba cas mibale (2)
■ Kwilu eza na ba cas mibale (2);
■Kwango eza na ba cas yoko (1);
■ Haut-Lomami eza na cas moko (1);
■ Tshopo eza na cas moko (1).