Bulletin ya Comité multisectoriel de la riposte à la pandémie du Covid19 en RDC ya mokolo ya mineyi (jeudi) 04 juin oyo, e monisi ete Coronavirus e koti province mususu ya sika, province ya Équateur.
■Ba cas kama yoko tuku mibale ya sika e bakisami na mboka, kati ya ba cas oyo Kinshasa eza na tuku mwambe na motoba (86), Sud-Kivu eza na tuku mibale na motoba (26), Nord-Kivu eza na mitano (5), Kongo Central eza na mibale (2), mpe Équateur eza na moko (1);
■ Ba échantillons kama mineyi zomi na mitano (415) e mekamaki;
■ Bato zomi na sambo (17) ba biki;
■ Bato misato (3) ba Kufi.
Uta ebandeli ya bo kono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto isato kama sambo tuku motoba na mineyi (3.764), kati na ba cas oyo koto isato kama sambo tuku motoba na misato (3.763) e ndimami mpe cas moko e zali « probable ».
To yeba ete, bato tuku mwambe na moko (81) ba kufi [ kati na bango ba cas tuku mwambe (80) e ndimami mpe cas moko eza « probable »] mpe bato kama mitano zomi na mibale (512) ba biki.
Ba provinces zomi na moko (11) eza touchées :
■ Kinshasa eza na ba cas koto isato kama isato tuku libwa na mibale (3.392);
■ Kongo Central eza na ba cas kama ibale zomi (210);
■ Sud-Kivu eza na ba cas tuku motoba na sambo (67);
■Nord-Kivu eza na ba cas tuku mitano na misato (53);
■ Haut-Katanga eza na ba cas tuku misato na misato (33);
■ Ituri eza na ba cas mibale (2)
■ Kwilu eza na ba cas mibale (2);
■Kwango eza na ba cas yoko (1);
■ Haut-Lomami eza na cas moko (1);
■ Tshopo eza na cas moko (1);
■ Equateur eza na cas moko (1).