Samedi 6 juin oyo, gouverneur ya province ya Tshopo, Walle Lufungula, a kataki singa mpo na bo fungoli morgue oyo e tongami na lopitalo ya Cinquantenaire ya Kisangani.
Ndako oyo ya ko bomba ba weyi e wumeli sanza motoba (6 mois) mpo misala na yango e sila. Kuna na kati, e zali na ba tiroirs mortuaires mwambe (8). Na yango na suka ya misala ena, mpo na ko sunga ndako eye e banda ko sala, gouverneur a kendaki ko inaugurer yango.
To yeba ete talo ya misala ya botongi morgue oyo e zali dollars koto kama yoko (100 mille $), mbongo ena e wutaki kaka kuna na lopitalo ya Cinquantenaire.