Gentiny Ngobila a kambaki lisanga moko mercredi 10 juin oyo na bakambi ya gouvernement provincial mpo na ko solola likambo e tali bobimisi bato na commune ya Gombe.
Charles Mbuta, molobeli ya gouvernement provincial, a sosolisi ete mokonzi ya mboka Kinshasa ako pesa na premier ministre plan ya déconfinement yambo yako yebisa population :
« Na suka ya poso oyo (ce week-end) gouverneur ako pesa sango na population na likambo e tali déconfinement ya Gombe. Kasi na yambo, ako lakisa nanu plan na premier ministre. »
Mpo na likambo e tali zando monene ya Kinshasa, gouverneur a lobi ete bofungwami na yango eko zela motindo oyo eko wuta epayi ya mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi.