Uta e bandeli ya bokono oyo ya Covid-19 le 10 mars na mboka na biso République Démocratique du Congo, mokonzi ya mboka a zuaki mokano ya ko kanga biteyelo, magomba, ba restaurants pe ba bars.
Ministre ya enseignant primaire secondaire et professionnel a zuaki mokano ete bana ba landaka mateya na nzela ya télévision pe radio. Kasi likambo yango e zali pasi mpo ete lotiliki e zali bisika nioso te, mpe ndaku nioso e zali na télévision te. Likambo ya malamu na Kisangani biteyelo mingi e zui mokano yako zua bana na bango en charge na nzela ya ko pesaka bango ba cahier ya devoir semaine nioso mpo ete bana ba zala kaka na molongo ya malamu, ndakisa ya eteyelo Saint Jean, na quartier plateau Boyoma na commune ya Makiso.
To ko senga na biteyelo misusu ya engumba Kisangani ba zua ndakisa ya biteyelo oyo e zui mokano ena.