Général Willy Yama, commandant ya ba opérations Sokola 2, a kendaki na mapinga wa ye na hôpital général ya Rutshuru ko bimisa basi tuku motoba na mitano (65), oyo ba kangamaki mpo na ko zanga ko futa mbongo yako bota.
Ba mama wana ba sepeli makasi mpe ba pesi matondo mingi na mapinga, to yeba ete e zali mbala ya liboso FARDC e sala likambo ya boye kuna na Rutshuru.
Na tango a yambi enveloppe ya mbongo o maboko ya général Willy, monganga ya lopitalo ena ye mpe a sepeli makasi.