Uta mukolo loleki, basi baye ba bikaka na bokono ya buka buka baye ba zali moko nakati ya association des personnes vivant avec handicap na engumba ya Kisangani, ba zwaki bongo likabo ya biloko eye : 6 roulots ya tissus, ba singa na ba élastiques.
Biloko ena e zali ko sunga bango mpo na ko tonga ba masques, e zalaki bongo o maboko ya mwana mboka, député provincial Philippe Masikini.
Basi baye, ba sepelaki mingi na likabo eye, oyo eko sunga bango ko zua mosolo mpo na ko bika na yango. Ba sengi na bayi Mboka ba somba ba masques eye.