Bato ya bokono ya Coronavirus ba komi misato na province ya Tshopo.
Bulletin oyo e tali makambo ya bokono na mboka, ya mokolo ya eyenga (dimanche) e monisi ete ba cas tuku mitano na libwa (59) ya sika oyo e ndimami e bakisami na mboka, kati ya ba cas oyo tuku mitano na moko (51) e zwami na Kinshasa, motoba (6) na kongo Centrale mpe mibale (2) na Tshopo, na boye mboka mobimba e komi na ba cas koto mineyi kama mwambe tuku misato na sambo (4.837), kati ya ba cas oyo koto mineyi kama mwambe tuku misato na motoba (4.836) e ndimami mpe cas moko (1) ezali « probable ».
Ba beli mitano (5) ba kufi , e sali ete mboka e koma na ba kufi kama yoko zomi na misato (112), kati na bango ba cas kama yoko zomi na moko (111) e ndimami mpe cas moko (1) ezali « probable « .
Ba beli zomi na misato ba biki (13) , na boye mboka mobimba e komi na bato kama motoba zomi na misato (613) oyo ba biki na bokono oyo ya Covid19.
Ba provinces zomi na moko (11) eza touchées :
■ Kinshasa e zali na ba cas koto ineyi kama misato tuku mineyi na motoba (4.346);
■ Kongo Central e zali na ba cas kama ibale tuku mineyi na motoba (246);
■ Sud-Kivu e zali na ba cas kama yoko na mwambe (108);
■ Haut-Katanga eza na ba cas tuku sambo na mibale (72);
■Nord-Kivu eza na ba cas tuku mitano na mineyi (54);
■ Tshopo e zali na cas misato (3);
■ Ituri eza na ba cas mibale (2)
■ Kwilu e zali na ba cas mibale (2);
■Kwango e zali na ba cas yoko (1);
■ Haut-Lomami e zali na cas moko (1);
■ Equateur e zali na cas moko (1).