Uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto itano kama yoko (5.100), kati na ba cas oyo koto itano tuku libwa na libwa (5.099) e ndimami mpe cas moko (1)e zali « probable ».
Bato kama yoko zomi na mitano (115) ba kufi [ kati na bango ba cas kama yoko zomi na mineyi (114) e ndimami mpe cas moko e zali « probable »] mpe bato kama motoba tuku mineyi (640) ba biki.
■ Ba cas kama yoko tuku mibale na motoba (126) ya sika oyo e ndimami e bakisami na mboka. Kati ya ba cas oyo Kinshasa e zali na kama yoko tuku mibale na mineyi (124), Nord-Kivu e zali na mibale (2);
■ Ba cas suspects kama ineyi tuku mineyi na moko (441)e zali détectés na sima ya bo meki meki ;
■ Bato zomi na mibale (12) ba biki;
■ bato misato (3) ba kufi kati ya ba beli;
■ Ba échantillons kama mitano tuku mineyi na libwa (549) e mekamaki.
Ba provinces zomi na moko (11) e zali touchée na bokono oyo
■ Kinshasa e zali na ba cas koto ineyi kama motoba na mineyi (4.604);
■ kongo Central e zali na ba cas kama ibale tuku mineyi na libwa (249);
■ Sud-Kivu e zali na ba cas kama yoko na mwambe (108);
■ Haut-Katanga eza na ba cas tuku sambo na mibale (72);
■Nord-Kivu eza na ba cas tuku mitano na motoba (56);
■ Tshopo e zali na cas moko (3);
■ Ituri eza na ba cas mibale (2)
■ Kwilu e zali na ba cas mibale (2);
■Kwango e zali na ba cas yoko (1);
■ Haut-Lomami e zali na cas moko (1);
■ Equateur e zali na cas moko (1).