Equity Bank Congo, oyo e yebanaka na kombo ya ProCredit Bank DRCongo, eza moko ya ba Banque commerciale na RDC.
Mokolo ya mitano (jeudi ) 25 juin 2020 oyo, Ilunga Ilunkanga, premier ministre ya mboka na biso, a yambaki na primature lingomba ya ba sali ya Equity Bank Conngo, oyo e memamaki na Celestin Mukeka oyo a zali directeur général.
Délégation oyo e memaki lisungi ya efuku (1 million) ya dollars américains mpo na ko soutenir ba efforts ya gouvernement na biso mpo na ko longa bokono ya Covid-19, mpe lisusu mpo na ko somba ba équipements ya ko mi batela, mingi mingi minganga oyo ba zali ko sunga batu na ba hôpital oyo l’Etat e poni mpo na ko traiter bato ya bokono oyo na Kinshasa mpe na mboka mobimba.
To yeba ete lisungi ya Equity Bank Congo oyo e ko kende mbala moko na libenga ya « fond de solidarité » oyo e salami na gouvernement na biso mpo na ba lisungi ya mitindo oyo.
Eteni Longondo ministre ya santé, coodonteur ya secretariat technique ya « comité multisectoriel de la riposte contre la penderie de la Covid19 « , mpe na coordinateur ya « Fond National de solidarité de la lutte contre la Covid19 » Revend Mukanya, bango nioso ba zalaki na likita oyo na primature.