Bulletin épidémiologique ya bokono ya mokolo ya lomingo oyo (dimanche) 28 juin 2020, e monisi ete ba cas ya sika kama yoko zomi na mibale (112) e bakisami na mboka, tuku mwambe na motoba (86) na Kinshasa, motoba (6) na Kongo central, motoba (6) na Nord-Kivu, mineyi (4) na Haut-Uélé, mineyi (4) na Sud-kivu, misato (3) na Lualaba mpe misato (3) na Sud-Ubangi, ba beli tuku motoba na mitano (65) ba biki mpe ba beli libwa (9) ba kufi.
Ba échantillons kama mineyi tuku sambo na mitano (475) e mekamaki mpe ba cas kama yoko tuku libwa na libwa (199) oyo bazo suspecter e zwamaki na sima ya bo meki meki.
Uta ebandeli ya bo kono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto motoba kama libwa tuku misato na libwa (6.939), kati na ba cas oyo koto motoba kama libwa tuku misato na mwambe (6.938) e ndimami mpe cas moko (1) e zali « probables ».
Bato kama yoko tuku motoba na sambo (167) ba kufi [ kati na bango ba cas kama yoko tuku motoba na motoba (166) e ndimami mpe cas moko e zali « probable »] mpe bato koto yoko tuku mitano (1.050) ba biki.
Coronavirus e koti na ba provinces zomi na mineyi (14) :
■ Kinshasa e zali na ba cas koto motoba kama yoko tuku misato na motoba (6.136);
■ Kongo Central e zali na ba cas kama isato zomi na mitano (315);
■ Haut-Katanga e zali na ba cas kama ibale na sambo (207);
■ Sud-Kivu e zali na ba cas kama yoko tuku misato na mwambe (138);
■Nord-Kivu e zali na ba cas tuku libwa na libwa (99);
■ Lualaba e zali na ba cas zomi na mineyi (14);
■ Tshopo e zali na cas libwa (9);
■ Haut-Uélé e zali na cas sambo (7),
■ Kwilu e zali na ba cas mineyi (4);
■Sud-Ubangi e zali na cas misato (3)
■Equateur e zali na cas mibale (2);
■ Ituri e zali na ba cas mibale (2);
■ Kwango e zali na cas moko (1);
■Haut-Lomami e zali na cas moko (1);