Uta mokonzi ya mboka Felix Antoine Tshisekedi a pesaki motindo yako kanga ba églises, écoles, universités, nganda mpo na bokono ya Covid-19, ko tambola ya bato mpe misala na bango e kangami, mingi mingi ba commerçants.
La police e boyi ko mona bato ba fanda naba nganda mpe bazo kanga bato oyo bako tosa mobeko ena te.
Ba kambi ya ba nganda ba lobi ete, na ndenge motuka ya Bralima ezo leka mpo na ko tekela bango masanga, bako koba mpe kosala activité na bango.
Namoni ete likambo liye, e sengeli na l’État a zwa motindo na ye, na likambo e tali activité ya Bralima mpe ba gérants ya ba nganda na engumba Kisangani.