Nzela ena e zali moko ya ba nzela ya munene ya ville ya Kisangani. Ko mata nango e zo mema biso ti na pont tshopo mpe na quartier motumbe, nako kita e memi biso na zando ya munene ti na quartier météo.
Ko landa maloba ya ba ingénieurs ya entreprise CFHEC, ba monaki ete nzela ena batu eye ba salaki yango liboso, ba salaki malamu te, na yango PDU e telemelaki projet ena mpo na ko réhabiliter yango. Kasi likambo yako kamwa e zali ete bazo bongisa nzela, kasi bazo kamola mpe ko kondisa yango. Nzela e komi mukie moyen mituka ya munene mibale e lekisana malamu e zali lisusu te.
Ko bongisa nzela e zali mabe te, kasi ko kamola nzela mpe ko kondisa yango nde likambo.