Mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi, a yambi mokanda ya démission ya président ya Cour Constitutionnelle mpe membre ya conseil supérieur ya magistrature Benoît Lwamba Bindu ko lekana na nzela ya directeur a.i ya cabinet naye, Désiré Cashmir Kalongele Eberande.
Na nyoso, president de la République a pesi ye matondo na musala nyoso a sali na justice ya mboka na biso.
Huta le 27 juin 2020, Benoît Lwamba a komaki mokanda mwa ye ya demission, kasi e bombamaki ti mokolo ya 10 juillet, yambo fuite na yango e bima. Na mbula tuku sambo na mitano (75 ans), a sali mingi na mboka na nzela ya justice, a zali na raison ya ko pema.