Na lisanga e salemaki samedi e leki, Willy Bakonga oyo a zali bongo ministre ya makambu e tali kelasi ya bana mike, a sosolisi ete kelasi eko zonga na sima ya bolongoli état d’urgence.
Na réunion wana, a tondi ba sungi (partenaires) ya ministère ya EPST, mpe a lakisi ete gouvernement e sili ko zwa ba mesures nyoso mpo na bana ba nzongela nzela ya kelasi. A lobi mpe ete bozongi kelasi wana eko salema na malembe, ko banda mingi mingi na ba finalistes mpe misusu ba ko landa na sima.
To yeba ete kelasi e kangama uta mokolo ya 19 mars 2020, ko landana na mibeko mokonzi ya ekolo Félix Tshisekdi a zwaki na maye ma tali état d’urgence sanitaire mpo na ko bundisa bokono ya Coronavirus.