Ba katisaka na bwato tongo iso, bilenge mibali oyo ba sosolá ete mosala nyoso e pesaka mbongo mpe moto ako lia kaka na motoki naye, yango ba bwakisaka lisusu « cope » te.
Na mayi ya fleuve congo ya pamba, cantine naye mpe savon, bilenge mingi ya commune Lububga ba zwa likanisi ya ko sokolaka ba tukutuku na talo ya 500 FC to 1000 FC, ko landana na bosoto ya tukutuku. Dona, moko na bango, a sali na mbula tuku ibale na mibale (âgé de 22 ans) a sosolisi biso ete : « soki to sali mosala malamu, to kangisaka ata 15000FC na mokolo moko mpe e sungaka biso na ba posa na biso, to sengaka lisusu mutu te mpe to yibaka te ».
Ya solo mosala e zali papa mpe maman, na pesaka courage na bilenge oyo ba mi pesaka na mosala, par rapport na ba oyo ba mi vandelaka na masano e zanga tina na ba quartiers.