Na tango oyo engumba e zali ko bundisama na bokono ya coronavirus, mbilinga mbilinga e koti kati ya bayi politiki.
Manso mabandaki tango mwana mboka Paulin Lendongolye na baninga baye ba komaki mokanda ya bobimisi gouverneur ya Tshopo Walle Lufungula o ebonga yaye ya lokumu.
Yango wana, na mokolo ya tuku ibale na libwa ya sanza loleki, bana mboka bayi lokumu ya Tshopo ba kutanaki na mbalakaka mpo na ko kata likambo. O mokolo ena, bulu bulu na kati ya Assemblée provinciale, mwana mboka Gilbert Bokungu a sosolisaki penza penza te makambo lolenge e sengeli.
Ko koma o mokolo ya zomi na mineyi ya sanza eye, oyo e bengami na lopoto cour d’appel sima yako tanga mpe ko sosola, e zuaki mokano ete tata wa engumba a tikala o bokonzi bwa ye.
Likambo yako kamwa penza na mokolo ya zomi na sambo Kaka ya sanza oyo, Walle Lufungula a bengani ba ministres baye mibale : Patrick Matata na Walter Ngadibje mpo na motindo oyo ye meyi a yebi.

Nungu nungu na mitungisi e leki epayi ya bana Boyoma. Bana mboka ba zali na posa ya boboto.
Je n’arrive pas à lire. Lingala vraiment.
J'aimeJ'aime