Ba « likili », ndenge to bengaka bango, ba zali ba ndeko oyo ba zali ko landa formation mpo na ko kota na mapinga na biso ya FARDC. Ba oyo ya camp Lukusa na commune ya Lubunga ba komi bisengasenga.
Ba ndeko oyo, solo ba ndima ko pesa bomoyi na bango mpo na ko batele mabele ba koko ba tikela biso. Kasi ko landana na bomoyi oyo ba zali ko bika, e komisi bango lokoso (mendiants). Ba zali ko mona pasi, eloko ya ko lia e zali te. Likambo oyo e komi mpe ko tia ba ndeko na biso ya commune ya Lubunga na kati ya insécurité.
To sengi na ba konzi ya mboka ba leka na ko sunga ba ndeko oyo na biley, mpe ba konzi na bango ba zua contrôle na bango.