Manso ma bandaki o ntango bilenge ya « Collectif Tshopo Telema » ba yaki o ndako eye ya lokumu ya mboka mpo na ko tanga memorandum na bango, kasi ba pulusu ba bengani bango.
Na sima, bato baye ba salaka mosala na assemblée provinciale ba kamwe ko mona pulusu ko bengana bango o esika na bango ya mosala kasi bango ba boyi mpenza ko bima.
O ntango ye meyi mwana mboka Glibert Bokungu a yoki makambo ena, a yebisi na bayi ba kengeli ya mboka ba kitisa motema.
Engumba ya Tshopo e zali na bosenga ya boboto mingi na ngonga oyo makambo ma zali ko tambola malamu te.