Na mikolo e zali ko ya, smartphone ya liboso e salemi na mboka na biso Congo, e ko mona mikolo na lisungi ya compagnie Industry five, oyo ba representants na ngo ba zwami na Kinshasa.
Mike Hammer, ambassadeur américain na RDC a lakisi ete, lisungi ya mboka America e ko mema misala koto yoko (1.000 emplois) na République Démocratique du Congo. Délégation ena e sengeli na sima e yambama na Ministre ya industrie Julien Paluku Kahongya, mpo na ko planifier installation ya industrie ena na RDC.
E sengelaki ete installation ya usine ena e salema na sanza ya motoba oyo e leki, Kasi ko landana na bokono oyo ya Covid-19, e salemaki lisusu te. Kasi e ko salema na mikolo oyo e za ko ya.