Mokolo ya misato (mercredi ) 29juillet oyo, Franck Diongo mokambi ya Mouvement Lumumbiste Progressiste (MLC), elongo moko na ba avocats na ye, a kendaki na auditorat général ya FARDC ya Kinshasa-Gombe mpona ko ndimisa plainte na ye contre mapinga ya la police oyo ba kengelaka mwana ya mboka Aubin Minaku.
To yeba ete uta mokolo ya 11 juillet lo leki nde Franck Diongo a tikaki plainte na ye. A fundi bango mpo na « dissipation des munitions, tentative de meurtre, extorsion mpe destruction méchante »
« To ye awa na auditorat militaire ya FARDC mpo na ko ndimisa (confirmer) plainte contre ba garde-corps ya député Aubin Minaku, mpo na ko yeba tina nini ba lingaki ko boma ngayi le 09 juillet 2020. Mokolo wana garde-corps a beti nga masasi mpe masasi yango ezwi moto moko oyo a zalaki pene na ngayi . Na mitiki na maboko ya bosembo (justice) mpo na ko yeba ntina nini ba gardes oyo ba lingaki ko boma ngayi « maloba na ye liboso ya ba panzi sango
Ko landa na maloba na ye, mapinga oyo ba lukaki ko boma ye mokolo ya marche ya anti-Malonda ya mokolo ya mineyi (jeudi) 9 juillet 2020 mpe a lingi a yeba tina na yango.