Bulletin épidémiologique ya mokolo ya mineyi (jeudi) 30 juillet oyo e monisi ete, ba cas ya sika tuku motoba (60) oyo e ndimami e bakisami na mboka [ tuku misato na mwambe (38) na Kinshasa, zomi na motoba (16) na Haut-Katanga, mineyi (4) na Nord-Kivu mpe mibale (2) na Ituri]; Ba échantillon kama misato tuku motoba na mineyi (364) e mekamaki ; Ba beli kama isato tuku mitano na libwa (359) ba biki [kama isato na mitano (305) na Kinshasa mpe tuku mitano na mineyi na (54) na ba provinces misusu]; Ata moto lioko te (0) à kufi mpe ba cas kama ibale tuku sambo na mibale (272) oyo ba zo suspecté ezwami na sima ya bo meki meki.
uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto libwa tuku sambo (9.070), kati ya ba cas oyo koto libwa tuku motoba na libwa (9.069) e ndimami mpe cas moko (1) e zali » probable »
Solo ba provinces zomi na motoba (16) e simbami na bokono oyo :
• Kinshasa e zali na ba cas 7.574
• Kongo-Central e zali na ba cas 404
• Haut-Katanga e zali na ba cas 304
• Nord-Kivu e zali na ba cas 295
• Sud-Kivu e zali na ba cas 288
• Lualaba e zali na ba cas 75
• Ituri e zali na ba cas 61
• Haut-Uélé e zali na ba cas 24
• Tshopo e zali na ba cas 24
• Equateur e zali na ba cas 5
• Kwilu e zali na ba cas 5
• Sud-Ubangi e zali na ba cas 5
• Haut-Lomami e zali na cas 1
• Kasaï e zali na cas 1
• Kasaï-Central e zali na cas 1
• Kwango e zali na cas 1
• Nord-Ubangi e zali na cas 1
Na boye mboka e bikisi bato koto motoba kama sambo tuku libwa na motoba (6.796) mpe e kufisi bato kama ibale zomi na mitano (215) [kati na bango ba cas kama ibale zomi na mineyi (214) e ndimami mpe cas moko e zali « probable «