Na tango oyo ba yekoli ba zali ko zela nzela ya kelasi e fugwama, Synergie des syndicats des enseignants de la RDC ( SYNECAT-SYNEP-FA-SYNIECO-CCT-COFEVID, SYNECO) e tiki mokolo ya mitano (vendredi) oyo mémorandum na bokambi ya mboka mpo na ko senga bo tiki ya bokonzi ( Démission) ya ministre ya enseignement primaire, secondaire et technique ( EPST ), Willy Bakonga Wilima, yambo ya bozongi ya kelasi ya mobu 2020-2021.
Ba lakisi ba fundi mosala mabe ya mwana mboka Willy Bakonga mpe ba sengi ba futa ba lakisi ya sika [nouvelles unités (NU)]
Ba fundi ete ba tie na mosala ya ko tangisa bato oyo e sengeli ba zala ba lakisi te, mpe ba bakisi lisusu ete bibundeli oyo e sengeli e zala mpo na ko bundisa bokono ya Covid19 na ba etelo e zali te, mpe ba petoli (assaini) ba eteyelo te.
Ba lakisi ba sengi ete ba bongisa calendrier ya malamu oyo e ko sala ete ba konzi ya ba etelo ba petola ba eteyelo na bango.
Solo ba lakisi ba sengi ete bozongi ya kelasi e zala te kaka mpo na ya ba yekoli ya suka (finaliste), kasi e zala mpo na ba yekoli nioso na mokolo ya 17 août 2020.