Na sima ya assemblée générale ya Association ya ba Professeurs ya Université ya Kinshasa (APUKIN), oyo e salemaki mokolo ya misato (mercredi) 12 août 2020 na campus ya eteyelo oyo, ba lakisi ya Université ya Kinshasa ba déclarer grève ya poso mibale, mpo na ko pusa bayi gouvernement ba pesa eyano na bosenga (revendication) na bango.
Kaka na bokutani na bango, comité exécutif ya APUKIN, e monisaki na ba lakisi lolenge ba négociations oyo ba bandaki na bayi gouvernement e zali ko tambola.
Ba lakisi ba moni été gouvernement e zali na motema mabe « mauvaise foi » mpe ba zwi mokano ya ko koba mpe ko multiplier ba pressions na bango ti mokolo ba ko zwa biyano na bosenga na bango.
To yeba ete, na sima ya mikolo mibale ya bozongi kelasi, ba lakisi ya université ya Kinshasa ba zali ko senga mingi amélioration ya conditions ya misala mpe ya bomoyi na bango.
Uta le 6 août 2020 nde comité exécutif ya APUKIN e bandaka ba négociations na bayi gouvernement.