Uta sanza minei, banda bokangemi ya mangomba ko landana na bokono ya coronavirus, losambo e ko zongela na date ya 15 juillet oyo na mboka na biso RDC.
Gentiny Ngobila oyo a zali mokonzi ya engumba ya Kinshasa, a sengi na ba kambi nyoso ya mangomba, botosi ya ba gestes barrières, ndakisa : bo sukoli maboko na yambo ya ko kota église, bolati ya ba masques mpo na mutu nyoso, bovandi musika ya 1m na ba ninga nyoso.
Na suka, a bakisi ete mutu nyoso ako tosa mibeko oyo te, ako zuama bongo na ba policier mpe ako futa ba amandes.