Mpo na mokolo ya mitano (vendredi) 14 août 2020 oyo, rapport ya secrétariat technique ya comité multisectoriel de la riposte contre la covid-19 e monisi ete, ba beli kama yoko tuku mwambe na mitano (185) ba biki na mboka, kati na bango kama yoko zomi na libwa (119) na Kinshasa mpe tuku motoba na motoba (66) na ba province misusu ya RDC.
Na boye, uta ebandeli ya bokono oyo le 10 mars 2020, mboka e bikisi bato koto mwambe kama itano tuku libwa na sambo (8.597).
Bulletin oyo emonisi lisusu ete ba cas a sika tuku misato na misato (33) oyo e ndimami ebakisami na mboka, kati ya ba cas oyo tuku misato na moko (31) e zwami na Kinshasa, moko (1) na Haut-Uélé mpe moko (1) na Tshopo. Na boye mboka na biso e komi na ba cas koto libwa kama motoba tuku misato na mwambe (9.638) kati na ba cas oyo , koto libwa kama motoba tuku misato na sambo (9.637) e ndimami mpe cas moko (1) e zali « probable ».
Solo kati ya ba beli , moto ya bokono moko (1) a kufi, na boye mboka e kufisi bato kama ibale tuku misato na libwa (239) kati na bango ba cas kama ibale tuku misato na mwambe (238) e ndimami mpe cas moko (1) e zali probable.