Na « école primaire Les Élites » ya commune Kabondo, mwana moko ya kelasi a betamaki fimbu makasi na molakisi na ye.
Mwana wana a bengami na kombo ya Gemima Ofukesa, a zalaki na mbula zomi na mibale (12 ans). Likambo ena e lekanaki mokolo ya misato (mercredi) e leki, molakisi wa ye a beti ye fimbu kama yoko (100) na motó.
Ba memaki mwana na lopitalo, minganga ba meki ko sunga ye, kasi mokolo ya minei (jeudi), mwana a kati motema.