Moyembi Werrason ako beta concert ya kafukafu mokolo ya motoba (samedi) 22 août oyo na « Chez Temba », kuna na commune ya Gombe na Kinshasa.

Concert oyo e sengelaki e betama uta sanza ya isato (mars) eleki, kasi mpo na ko mibatela mpe ko bundisa bokono ya coronavirus, bato nyoso ba kangamaki na ba ndako (confinement), na yango moyembi a pusaki yango na sanza ya mwambe (août).
Mokonzi ya Wenge Musica Maison Mère a lobaki liboso ya ba panzi sango (point de presse) mokolo ya misato (mercredi) e leki. A sengi na bato nyoso, mpo na ko koba na etumba ya bokono ya coronavirus, ba leka nako tosa mibeko etali bobundisi ya bokono ena (gestes barriers).

To yeba ete, talo mpo na bokoti na concert ena e zali 20.000 FC mpo na moto nyoso, mpe 60.000 FC mpo na VIP.