Na sima ya ko pusa mbala mibale, Cour d’Appel ya Kinshasa/Gombe eko benga likambo ya Vital Kamerhe na mbala ya misato na mokolo ya mitano (vendredi) 21 août 2020 oyo.
Ata ko pusa nyoso wana, ba sambeli ya Vital Kamerhe ba tikali ko ika mpiko mpo yako kende na likambo ya client na bango ti na suka, ata ko ko pusa mususu e zalaki na faute ya greffier, oyo a sengelaki a sala musala naye.
To yeba ete, Directeur ya cabinet ya kala ya Mokonzi ya ekolo, Vital Kamerhe, a kangamaki mokolo ya le 20 juin, na mbula tuku ibale (20 ans) ya misala ya makasi (travaux forcés) na maye matali « détournement de deniers publics ».