E sali mikolo mingi na ekolo na biso Congo, mpe na engumba na biso ya Kisangani, mabota ebele e koma ko salela likambo ya « violence sexuelle » mpo na kozwa mbongo.
L’État e lobi soki eza cas ya « viol sur une fille mineure », auteur ya viol e sengeli a zala mokangami.
Mabota e koma na bizaleli ya ko sala « arrangement à l’amiable » mpo na ko senga mosolo ebele. To bosana te, viol e zali ko zwa mwasi to mobali na makasi sans volonté naye. Kasi oyo to zali ko mona lelo, e komi likambo ya mbongo mpe mabota e zali ko bongwanisa mbula (âge) ya mwana mwasi mpo mobali a kangama nanu, en attendant arrangement à l’amiable oyo bazali na makanisi yako sala.
L’État e sengeli ko sala mosala nango na ndenge e sengeli mpo mibali ebele ba zali na boloko mpo na makambo ya arrangement à l’amiable, mpo mbongo mabota ya basi ezo senga e zali ebele.
Bilenge mibali mpe ba sengeli ko mikebisa na maye matali cas ya viol pamba te l’état e zali stricte na mambi ma tali violence sexuelle.