Sango oyo e lobami bisika inso na mokolo ya ibale (mardi) oyo. Likambo yako kamwa, Lionel Messi a lingi a bima na lingomba wa ye ya motema.
Uta ba ndobganaki na ba beti ndembo ya Bayern Munich, kuna ba polaki na mingete mwambe nako tiaka mibale (8-2), mobulu e koti na lingomba ya ndembo Barcelone. Lobi loleki, mwana mboka Argentine Lionel Messi, a yebisi na mokonzi ya Barcelone Josep Maria Bartomeu mpe na ba ninga wa ye, a koki lisusu ko koba na lingomba oyo na ndembo te. Sango yango e sali pasi mingi na ba fans na bango.
Kasi, to yeba ete, ti sikoyo, mobeko ena ya Messi e komi nano solosolo te. Bakambi ya Barcelone ba zali ko senga na mokonzi wa bango Bartomeu a tika ebonga wa ye (démission) mpo ete Messi a kende te.