« Mouvement citoyen pour le changement » a zali ko senga na Bralima a sosolisa bomatisi talo ya masanga wa ye, pamba te, uta mikolo mi leki, masanga e zali ko sombama lisusu na tayo na yango oyo to yebi te.
Masanga ya Bralima e mati talo. Molangi moko ya sucré oyo e bandaka ko tekama 800FC e komi 1000FC, mpe 1200 FC bipayi misusu. Mutzig ya 1300FC e komi 1500, Turbo na Primus ya 1500 FC e komi 2000.
Na yango, Lucha section Kisangani e komeli mokonzi ya Bralima siège Tshopo mokanda, mpo na ko senga biyano na likambo oyo, mpe mpo na ko senga bokitisi ya ba talo ya masanga.