A waka bongo le 31 août 2014, na mboka Afrique du Sud. Bozangi bwa ye e zali bongo ko monana o kati ya FARDC ?
Nako kanisa bongo misala minene miye a salaki mpo na ekolo Congo, mobotami ya Tolaw, moko ya localité ya territoire ya Isangi, na province ya Tshopo, a tiki bongo bozangi oyo e zali ko monana mikolo nioso, ko lekela ba massacres oyo e zali ko koba na ko lelisa bayi mboka na ngambo ya Est, na ba rebelles ya ADF na basimbi mandoki misusu.
Na yango, to sengi na bakonzi ya mboka, ba pesaka lokumu na baye ba ndima ko sopa makila na bango, mpo na sécurité ya ekolo na biso. Kasi mawa makasi mpo mokolo ya lelo e leki kaka na kimia, ata cérémonie yoko te mpo na ko kanisa général Bauma.
Michel Bebay